Revelation of John 7

Bato nkoto nkama moko na ntuku minei na minei (144.000) oyo batiamaki bilembo ya Nzambe

1Sima ya makambo wana, namonaki baanzelu minei batelemaki na basonge nyonso minei ya mokili ; bakangaki mipepe minei ya mokili, mpo ete mopepe ata moke te eleka na mokili, to na ebale monene, to na nzete ata moko. 2Bongo namonaki anzelu mosusu awutaki na Este asimbaki elembo ya Nzambe na bomoi. Agangaki na mongongo makasi epai ya baanzelu mineioyo Nzambe apesaki nguya ya kosala mabe na mokili mpe na ebale monene ; 3alobaki :

—Bosala mabe te na mokili, to na ebale monene, to na banzete, kinotango tokosilisa kotia elembo na bilongi ya basali ya Nzambe na biso.
4Bongo nayokaki talo ya bato oyo bazwaki elembo : nkoto nkama moko na ntuku minei na minei ya mabota nyonso ya bana Isayele. 5Na libota ya Yuda : bato nkoto zomi na mibale bazwaki elembo ; na libota ya Ruben : bato nkoto zomi na mibale, na libota ya Gadi : bato nkoto zomi na mibale ; 6na libota ya Asere : bato nkoto zomi na mibale, na libota ya Neftali : bato nkoto zomi na mibale, na libota ya Manase : bato nkoto zomi na mibale ; 7na libota ya Simeon : bato nkoto zomi na mibale, na libota ya Levi : bato nkoto zomi na mibale ; na libota ya Isakare : bato nkoto zomi na mibale ; 8na libota ya Zabuloni : bato nkoto zomi na mibale ; na libota ya Zosefi : bato nkoto zomi na mibale ; mpe na libota ya Benzamin : bato nkoto zomi na mibale.

Lingomba ya Nzambe oyo elongaki

9Sima ya makambo wana, namonaki bato ebele penza, oyo moto ata moko te akokaki kotanga bango. Bazalaki bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya mikili nyonso, mpe ya minoko nyonso. Batelemaki liboso ya Kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-meme ; balataki banzambala ya pembe, mpe basimbaki mandalala na maboko na bango. 10Bazalaki koganga na mongongo makasi :

—Lobiko na Nzambe na biso oyo avandi na kiti ya Bokonzi, mpe na Mwana-Meme !

11Baanzelu nyonso batelemaki pembeni-pembeni ya Kiti ya bokonzi, ya bampaka, na bikelamo minei ya bomoi. Bongo bafukamaki libosoya Kiti ya Bokonzi elongi na nse mpe bazalaki kokumisa Nzambe. 12Bazalaki koloba : Amen !
Masanzoli, nkembo, bwania,
matondi, lokumu,
nguya mpe makasi,
ezala na Nzambe na biso,
mikolo nyonso seko !
Amen !

13Bongo moko ya bampaka atunaki ngai :

—Bato oyo balati banzambala ya pembe bazali banani ? Mpe bawuti wapi ?

14Nazongiselaki ye :

—Nkolo na ngai, yo nde oyebi.

Bongo alobaki na ngai :

—Ezali baoyo bawuti koniokwama mingi penza. Basukolaki banzambala na bango, mpe bakomisaki yango pembe na makila ya Mwana-meme.
15Yango wana batelemi liboso ya Kiti ya bokonzi ya Nzambe mpe bazali kosalela ye butu moi na Ndako na ye. Mpe Moto oyo avandi na Kiti ya bokonzi akobomba bango na Ndako na ye ya kapo.

16Bakoyoka lisusu nzala te mpe bakozala lisusu na posa ya mayi te ; bakoyoka lisusu pasi ya moi te, to mpe ya molunge te. 17Mpo Mwana-meme oyo azali na kati-kati ya Kiti ya bokonzi akobatela bango. Akomema bango na bisika oyo mayi ya bomoi ebimaka. Bongo Nzambe akopangusa mayi nyonso ya miso na bango.
Copyright information for LinMNB